Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !