Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 15:1 - Mokanda na Bomoi

1 Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 15:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele : — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango ? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi ? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso ?


Bazongiselaki ye : — Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.


Bazongiselaki ye : — Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.


Nani adefisaki ngai eloko mpo ete nafuta niongo na ye ? Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.


Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.


Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.


Moto oyo akangaka motema akoki kobongola makanisi ya mokonzi, mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.


Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.


Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.


Batioli batiaka mobulu kati na engumba, kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ