Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 14:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bwanya ya moto ya mayele esosolisaka ye nzela na ye, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele : lokuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 14:8
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


Tika ete nabongisa etamboli na ngai mpo ete natosa mitindo na Yo !


Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo, pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo !


Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.


Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga.


Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.


Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.


Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo : nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.


Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,


Namonaki ete bwanya ezali malamu koleka bozoba, ndenge pole ezali malamu koleka molili.


Pamba te ezala moto ya bwanya to zoba, bakotikala kokanisa bango tango molayi te ; mpe na mikolo ekoya, bato bakobosana bango mibale. Moto ya bwanya mpe akokufa lokola moto ya zoba.


Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala, bato bazali koya wuta na nor ! Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela, mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ?


Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama : « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango ; »


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo.


Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.


Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ