6 Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.
Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.
Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;
Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
Zala mosika ya zoba, pamba te okotikala kozwa boyebi te na bibebu na ye.
Moto ya moto makasi alingaka te moto oyo apamelaka ye, yango wana akendaka te epai ya bato ya bwanya.
Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !
Bwanya emonanaka na elongi ya moto ya mayele, kasi miso ya zoba ekendaka kino na suka ya mokili.
Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba, yango wana azalaka te na likambo ya koloba kati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke.
Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.
Maloba nyonso oyo ebimaka na monoko na ngai ezali sembo, ezalaka na likambo moko te ya lokuta to ya mabe ;
nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.
Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini ?
Moto oyo akanisaka ete azali na boyebi ya makambo ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli.
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.