Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Yesu alobaki na bango lisusu : — Ngai, nazali kokende ; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.
Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ?
Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.
Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.
Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.
Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.