Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 14:29 - Mokanda na Bomoi

29 Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 14:29
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.


Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.


Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.


Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.


Moto oyo abatelaka monoko na ye azali na boyebi ; moto oyo alengaka-lengaka te azali mayele.


Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi ; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.


Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.


Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo ?


Simba yango makasi, mpe ekotombola yo ; yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.


bazoba batombolami na bisika ya lokumu makasi, kasi bazwi batikali na bisika ya se.


Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo ; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.


Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.


Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.


Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.


Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.


Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ