Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 14:28 - Mokanda na Bomoi

28 Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 14:28
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki.


Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ?


Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli ; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba.


Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo.


Kasi wana bazalaki konyokola bango, bazalaki kokoba kaka kobotana mpe kokoma ebele. Bongo bato ya Ejipito bakomaki kobanga bana ya Isalaele.


Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »


Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.


Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.


Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala, bato bazali koya wuta na nor ! Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela, mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ