Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 14:22 - Mokanda na Bomoi

22 Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 14:22
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »


Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai : « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai.


Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.


Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.


Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.


Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.


Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.


Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.


Mosala nyonso epesaka litomba, kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.


Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi.


Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.


Kosalaka moninga na yo mabe te soki azali kovanda na kimia epai na yo.


Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !


azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.


Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.


Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Banongi bayebisaki ye : — Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ