Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 14:21 - Mokanda na Bomoi

21 Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 14:21
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.


Akabelaka babola na motema ya esengo ; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.


Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye ! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu ! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !


Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia.


Moto oyo anyokolaka mobola atiolaka Mokeli ya mobola yango, kasi moto oyo asalelaka moto akelela bolamu apesaka Ye lokumu.


Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango ; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.


Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ; soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.


Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.


Molimo ya moto mabe elingaka kaka makambo mabe ; ata moninga na ye penza azwaka ngolu te na miso na ye.


Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.


Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.


Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :


Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »


Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.


Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ