Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
Salomo azongisaki : — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi.
Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »
Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.
Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !
Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.
Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.