Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 14:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bato mabe bakofukama liboso ya bato ya malamu, bato ya mitema mabe bakofukama na ekuke ya bato ya sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 14:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se.


Bazongisaki : — Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu. Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye.


Jozafati alobaki : — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize.


Yango nde suka ya bato oyo batiaka elikya kati na bango moko, ya bato oyo balandaka bango mpe basepelaka na maloba na bango.


Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi.


Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon.


Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya.


Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula, kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.


Bana ya banyokoli na yo bakoya kofukama liboso na yo ; bato nyonso oyo batiolaki yo bakofukama na se ya matambe na yo mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, Siona ya Mosantu ya Isalaele.


Bayaki kosenga bango bolimbisi, mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki na bango ete balongwa na engumba wana.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba : ‘ Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa. ’ › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ