lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye ! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye !
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.
Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.