7 Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.
Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;
Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?
Balakaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa mabe ya nzoto, oyo ememaka bango na libebi ; pamba te moto nyonso azali mowumbu ya oyo ekonzaka ye.
Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.