Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 13:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bosembo ebatelaka moto oyo atambolaka alima na nzela na ye, kasi mabe ebebisaka bongo ya moto ya masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 13:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo azongisaki : — Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele ; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa.


Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.


abonzaki bambeka epai ya banzambe ya Damasi oyo elongaki ye, pamba te amilobelaki : « Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bayaka kosunga bato na bango, ngai mpe nakobonzela bango bambeka mpo ete baya kosunga ngai ! » Kasi esalaki ete ye akweyisama, Isalaele mobimba mpe ekweyisama.


Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !


Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !


Ezali moto oyo azangi pamela, oyo asalaka makambo ya sembo mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;


Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.


Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo ; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.


Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.


Bato ya kilikili bazalaka nkele na miso ya Yawe, kasi bato oyo bazangi pamela basepelisaka Ye.


Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.


Nzambe ya sembo atalaka na bokebi makambo oyo esalemaka kati na bandako ya bato mabe, mpe akweyisaka bango kati na pasi.


Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ