Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.
Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › »
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye : « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. »