3 Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai !
Nani asepelaka na bomoi ? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.
Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.
Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele, ezalaka na nzete ya lolendo, kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.
Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.
Moto ya bilobaloba abimisaka basekele ; yango wana kima bato oyo balobaka mingi.
Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.
Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.
Samison alobaki : — Soki bakangi ngai na basinga ya sika oyo nanu basaleli te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso.
Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki : « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. »