Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 13:25 - Mokanda na Bomoi

25 Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 13:25
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo.


Nakopambola, nakopambola yango na biloko ebele, nakotondisa babola na yango na bilei.


Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.


Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe,


Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.


Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala, kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa.


Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.


bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.


mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela, mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.


Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.


tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.


Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.


Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo : « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te ! »


pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.


Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ