24 Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka, ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »
— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.