23 Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo.
Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.
Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.
Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.
Moto oyo abongisaka nzete na ye ya figi aliaka mpe mbuma na yango, mpe moto oyo abatelaka mokonzi azwaka lokumu.
Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi akotonda na bobola.
Moto oyo alingaka mbongo atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo, bozwi na ye etondisaka ye te. Wana mpe ezali kaka pamba.
bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.