Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki : — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene ;
Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Balandaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi.
Alobaki mpe na Jozafati : — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele : — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo.
Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki ; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye.
Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.
Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.