Tika ete makala ya moto esopanela bango ! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !
Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo ; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.