mpe alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi ! »
Tango kaka nalekaki bango, mbala moko, namonaki mobali oyo motema na ngai elingaka. Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende. Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai, na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.