14 Mateya ya moto ya bwanya ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.
Basinga ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo.
Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
Kotosa Yawe ezali etima ya bomoi, ekangolaka na mitambo ya kufa.
Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.
Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.
Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
Tika ete mayele na yo epambolama ! Tika ete yo moko mpe opambolama mpo ete opesi ngai nzela te ya koboma mpe ya kozongisa ngai moko mabe na mabe !