Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 13:13 - Mokanda na Bomoi

13 Moto oyo atiolaka liloba amiyokisaka pasi, kasi moto oyo atosaka malako akozwa lifuti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 13:13
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso ! Tika ete esalema kolanda Mobeko !


Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.


Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.


Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.


Epesaka mosali na Yo mayele ; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.


Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako.


lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,


Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.


Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.


Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.


Moto oyo atosaka mibeko abatelaka molimo na ye ; moto oyo akebaka te na etamboli na ye akokufa.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.


Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.


pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba : mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko.


pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango.


Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu.


Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › »


Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.


Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »


Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ