Boye mokonzi atunaki ngai : — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ? Nabangaki makasi ;
Bino mpe ndenge moko, bozali sik’oyo na mawa ; kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe moto ata moko te akokoka kolongola bino esengo yango.
Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »
Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.