Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 13:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 13:11
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango.


Oliaka mbuma ya mosala na Yo ; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.


Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe epesaka litomba te, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.


Elikya oyo ekokisami te epesaka bokono na motema, kasi posa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.


Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.


Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.


Moto ya sembo afulukaka na mapamboli, kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombangu akozanga te kozwa etumbu.


Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.


Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.


Ndenge abotamaki bolumbu wuta na libumu ya mama na ye, ndenge mpe akozanga bolumbu, akomema ata mbuma moko te ya mosala na ye.


Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ