Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 13:10 - Mokanda na Bomoi

10 Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 13:10
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ?


Bomengo oyo ezwami na lombangu mpe na nzela ya mabe esilaka noki, kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke ekomaka ebele.


Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.


Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.


Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.


Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.


Kombo ya moto ya lofundu mpe ya lolendo ezali : « Motioli. » Asalaka makambo na lolendo oyo eleka ndelo.


Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo ?


Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.


Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.


azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe


Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino ?


Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki : « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ