7 Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.
Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »
mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo.
Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.
Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »
Pamba te ayebi misala na bango, akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.
Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te ; ata oluki ye, okomona ye te.
Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela.
Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
Ndako ya moto mabe ekobukana, kasi ndako ya kapo ya bayengebene ekofuluka.
Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.