Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo mpo na kokanga bandeke, mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.
Bino mpe bato ya Likita-Monene, bokende sik’oyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino, lokola nde bolingi koyekola malamu likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.