4 Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.
Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu.
Mabongisi ya bayengebene ezalaka ya sembo, kasi makanisi ya bato mabe ezalaka kaka lokuta.
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.
Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.
Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
Kovanda kati na esobe ezali malamu koleka kovanda esika moko na mwasi oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
mwasi oyo balingaka te, kasi abali ; mpe mwasi mosali oyo azwi bomengo ya nkolo na ye ya mwasi.
« Basi ebele basalaka makambo ya lokumu ; kasi yo, oleki bango nyonso ! »
Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.
Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te.
Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali.
Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.