Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:25 - Mokanda na Bomoi

25 Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:25
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo mpo na bozoba na ngai.


Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba : « Wapi Nzambe na yo ? »


Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.


Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.


Motema eyebaka pasi na yango moko, moko te akoki kokabola na yango esengo.


Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.


Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.


Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.


Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.


Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.


Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.


Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?


Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.


Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.


Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.


Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ