Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:23 - Mokanda na Bomoi

23 Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:23
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.


Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala ; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala.


Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.


Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.


Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.


Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.


Bwanya ewumelaka kati na motema ya moto oyo azali na bososoli ; kasi boni, ekoyebana solo kati na bazoba ?


Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.


Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.


Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.


Ata tango zoba atambolaka na nzela, bozangi mayele na ye etalisaka na bato mosusu ete azali zoba.


Saulo azongiselaki noko na ye : — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ