Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:2 - Mokanda na Bomoi

2 Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi azalaki koloba na ye : — Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo ; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi.


Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.


mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.


bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.


Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.


Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba, mpe bayinaka moto ya mayele mabe.


Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.


Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.


motema oyo ekanisaka mabongisi ya mabe, makolo oyo epotaka mbangu na mabe,


Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe.


Ndenge moto moko te azali na bokonzi likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango, ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi likolo ya mokolo na ye ya kufa. Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba, ndenge mpe misala mabe ebikisaka te bato oyo basalaka yango.


Solo, Barnabasi azalaki moto malamu, azalaki atondisama na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele bakangamaki na Nkolo.


Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo ; tango mosusu, moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ