Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:17 - Mokanda na Bomoi

17 Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo, kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:17
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotomboka ya moto oyo azangi mayele eyebanaka kaka mokolo wana, kasi moto ya mayele abombaka soni na ye.


Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.


Motatoli oyo alobaka solo abikisaka bato ebele, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.


Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.


Moto oyo atiolaka bosembo azali motatoli ya zoba ; mpe monoko ya bato mabe emelaka kaka mabe.


Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.


Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.


Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?


motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.


Tala makambo oyo bosengeli kosala : Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye ; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino,


Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,


Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko ;


kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ