Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:15 - Mokanda na Bomoi

15 Nzela ya moto oyo azangi mayele emonanaka alima na miso na ye, kasi moto oyo ayokaka toli azali moto ya bwanya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:15
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;


Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.


Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.


Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.


Moto ya bwanya abangaka mabe mpe akimaka yango, kasi zoba atombokaka, na elikya nyonso.


Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.


Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.


Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.


Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.


Eleki malamu kotia elikya na zoba, na esika ete otia elikya na moto oyo amimonaka moto ya bwanya na miso na ye moko.


Moto ya goyigoyi amimonaka ete azali na bwanya koleka bato sambo ya mayele.


Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu.


Tika ete omimonaka te moto ya bwanya na miso na yo moko ; tosa Yawe mpe longwa na mabe.


Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.


Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.


Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ;


Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.


Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ