Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:13 - Mokanda na Bomoi

13 Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:13
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, apambola bana oyo ya mibali ! Tika ete babengama na kombo na ngai, mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! Tika ete bakoma ebele kati na mokili !


Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti : — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso


Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe : — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo !


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,


Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo. Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.


Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.


Mpo na masumu ya minoko na bango, mpo na maloba ya bibebu na bango, tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango. Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,


Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata ; ekozwa mpe ekozokisa bango.


Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.


Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo.


Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.


Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.


Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.


omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.


Ezali malamu kokangama na toli ya liboso mpe kosimba toli ya mibale, pamba te moto oyo atosaka Nzambe akosalela toli nyonso mibale.


Mokonzi asepelaki makasi mpe apesaki mitindo ete babimisa Daniele wuta na libulu. Boye, babimisaki Daniele wuta na libulu mpe bamonaki ata pota moko te na nzoto na ye, pamba te azalaki na elikya na Nzambe na ye.


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


elingi koloba ete Nkolo azali na makoki ya kokangola bayengebene kati na komekama mpe ya kopesa, na mokolo ya kosambisama, etumbu epai ya bato mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ