Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.
Abombamaka lokola nkosi kati na evandelo na yango, abombamaka mpo na kokanga moto oyo azangi nguya ; akangaka moto oyo azangi nguya na kotindika ye pembeni ya motambo.
Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.
Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.
Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.