Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 12:1 - Mokanda na Bomoi

1 Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 12:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yo mpo ete nakanisa misala minene na Yo !


Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.


Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli, oyo bakangaka nguya na yango na nzela ya ebende mpe ya singa oyo batiaka na minoko na yango mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »


Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai ?


Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !


Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.


Soki moto ya sembo azwaka litomba na ye awa na mokili, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ?


Moto ya malamu azwaka ngolu na miso ya Yawe, kasi Nzambe akatelaka moto ya mayele mabe etumbu.


Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo akozwa pamela ya makasi ; moto oyo aboyaka pamela akokufa.


Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye, atelemelaka bososoli nyonso.


Solo, nazali zoba koleka bato nyonso, nazali ata na mayele ya bomoto te ;


Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.


Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !


Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »


Ngombe eyebi nkolo na yango, ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango apeselaka yango bilei ; kasi Isalaele ayebi te, bato na Ngai basosoli te. »


Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota,


mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ