Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 11:9 - Mokanda na Bomoi

9 Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 11:9
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.


mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te mpe batiela bato mitambo te.


Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso oyo babosanaka Nzambe ; boye, elikya ya bato mabe ebebaka.


Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.


Bosembo ya bato oyo batambolaka alima ekangolaka bango, kasi bato oyo batambolaka na boyengebene te bakweyaka na motambo ya baposa na bango.


Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo.


Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.


Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.


Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;


Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango.


Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo ; kasi ezali te mpo boyebi yango te.


Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ