Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 11:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »


Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.


Soki bakufi, bazongaka na mabele, mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.


Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo, kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba.


Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.


Moto ya sembo akokangolama na pasi, mpe moto mabe akomona pasi na esika ya moto ya sembo.


Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.


Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ