Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?
ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe.
Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. Palata mpe wolo yango ekosilisa baposa mpe nzala na bango te, pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu.
Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.
Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko !
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.