27 Moto oyo alukaka kosala bolamu akozwa ngolu, kasi pasi ekomelaka moto oyo alukaka kosala mabe.
Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.
Na lolendo na ye, moto mabe oyo akangami na mabongisi na ye anyokolaka mobola.
Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola ; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !
Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.
Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.