22 Mwasi ya kitoko, kasi azangi mayele, azali lokola lopete ya wolo na zolo ya ngulu.
Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye, kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono oyo ezali kolia mikuwa.
Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.
Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;
Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,
Ezaleli na bango elongisi bosolo ya masese oyo : « Mbwa ezongelaka biloko oyo yango moko esanzi » mpe « Ngulu oyo basukoli ezongelaka kotambola kati na potopoto. »