Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.
Nazali lisusu na kanda te. Ah, soki ezalaki kaka na banzube mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, nde natambolaki likolo na yango na bitumba mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi :
Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.