Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 11:19 - Mokanda na Bomoi

19 Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 11:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.


Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi, kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu.


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Bomoi ezalaka kati na nzela ya bosembo, mpe kufa ezalaka te kati na nzela ya bosembo.


Kotosa Yawe ememaka na bomoi, esalaka ete moto azala na kimia ; boye ata mabe moko te ekokomela ye.


Moto oyo abungi nzela ya bwanya akovanda kati na lisanga ya bakufi.


Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.


Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »


kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.


Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu ; mpe lisumu ememaka na kufa.


Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.


Bana na ngai, tika ete moto moko te akosa bino. Moto oyo atambolaka na bosembo azali sembo ndenge Ye moko Klisto azali sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ