Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 11:12 - Mokanda na Bomoi

12 Moto oyo atiolaka moninga na ye azangi mayele, kasi moto ya mayele avandaka kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 11:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : — Bopesa ye eyano te !


Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.


Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.


Moto oyo aswanaka abimisaka basekele, kasi moto oyo azali na molimo ya sembo abombaka basekele.


Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.


Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;


Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo.


Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo :


Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.


Zebuli alobaki na Gali : — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda !


Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ