1 Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele na miso ya Yawe, kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.
Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.
Kilo mibale mpe bimekelo mibale, nyonso ezali nkele na miso ya Yawe.
Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te.
Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo ; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.
Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.