Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.