Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 10:4 - Mokanda na Bomoi

4 Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 10:4
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola.


Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.


Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola.


Maboko oyo esalaka ezwaka bokonzi, kasi maboko ya goyigoyi ememaka na bowumbu.


Moto ya goyigoyi azangaka bilei, mpe moto ya nzunzu akomaka mozwi monene.


Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.


Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.


Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.


Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.


Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.


Mabongisi ya moto oyo asalaka mosala ememaka ye na bomengo, kasi kozala motema moto-moto ememaka na kozanga.


Soki moto azali goyigoyi, likolo ya ndako na ye ekobukana ; soki maboko na ye elemba, ndako na ye ekotanga mayi.


Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.


Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ