31 Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya, kasi lolemo ya lokuta ekokatama.
Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo,
Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi.
Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.
Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi, kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe.
Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya, kasi fimbu ezali malamu mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele.
Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.
Alobaka na bwanya, mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.